30 Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.
mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,
Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.