Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 106:3 - Mokanda na Bomoi

3 Esengo na bato oyo babatelaka mibeko mpe batambolaka na bosembo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 106:3
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »


Nazwa mokano ya kotambola kolanda mitindo na Yo, tango nyonso, kino na suka.


Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.


Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso, mpe libela na libela.


Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, misala na biso nyonso ya bosembo ezali lokola elamba ya mbindo ; biso nyonso tokawuki lokola likasa mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe !


Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.


bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te ;


Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.


Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.


Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala : moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala.


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


Yango wana, batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ; mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi akobatela bango kati na evandelo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ