Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 106:23 - Mokanda na Bomoi

23 Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 106:23
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.


Atindaki mosali na Ye, Moyize, mpe Aron oyo aponaki.


bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye ; bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi !


Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe.


Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.


Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.


Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye : — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye.


« Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.


Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.


Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te.


Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino ; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu.


Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino.


Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ