11 Mayi ezipaki banguna na bango, moko te atikalaki na bomoi.
atambolisaki bango na kimia penza, babangaki eloko te ; mpe ebale monene emelaki banguna na bango.
Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.
Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.
Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
Mozindo ya mayi ezipi bango, bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.