« Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela.
Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
Yawe alobaki na ngai : — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! »
abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.
Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki : « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu : « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »