Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 104:2 - Mokanda na Bomoi

2 omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 104:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato mpe atondisaka mozindo ya ebale monene.


Atandaki Ye moko Likolo mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale ;


Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;


Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango ; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.


Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.


Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.


Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ