Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba, mpe bitima na kati-kati ya mabwaku ; nakobongola esobe liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi ;
Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ;