Banzembo 104:1 - Mokanda na Bomoi1 Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene ! Olata kongenga mpe lokumu, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.