Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
Ozali kutu kotuna Ngai : ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ? Kotomboka na yo ekosila te ? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »