Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:7 - Mokanda na Bomoi

7 Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.


bikamwa kati na mokili ya Cham mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.


Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.


Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.


Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.


babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.


Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,


Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.


Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.


Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.


Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.


Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.


Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.


Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ