6 Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.
ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
Pamba te akokangola moto akelela oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi, mpe mobola oyo azangi mosungi.
Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.
Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,
Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.
Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »
Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ?