Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:4 - Mokanda na Bomoi

4 akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !


ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.


Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.


Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.


Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.


Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.


Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.


Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.


namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke ; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ