Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso ;


Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.


Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.


Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu. Atindelaki bango bilei ebele penza.


Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.


Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.


Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?


Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?


tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !


Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ