Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:2 - Mokanda na Bomoi

2 Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi ; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi.


Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,


Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,


Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.


Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai ?


Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »


Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.


Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.


Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.


keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe !


Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ