Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:19 - Mokanda na Bomoi

19 Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:19
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo ; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.


Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso ; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.


Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.


Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Banguna na ngai balimwa mpo na libela ; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.


oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ