Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : — Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo.
Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.
Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.