15 Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga ;
Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !
mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.
« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?
Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,