Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:14 - Mokanda na Bomoi

14 pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:14
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.


Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko ; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?


Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema ? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ?


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Yawe, kino tango nini ? Okomibomba penza tango nyonso ? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?


liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.


Bozali nde kobongola makambo ! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango : « Asalaki ngai te ? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki : « Ozali mayele te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ