Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.
Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.
Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango ? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango ?
Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.
Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.