Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 103:12 - Mokanda na Bomoi

12 ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 103:12
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.


Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !


Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.


Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »


mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste, bato bayeba ete mosusu azali te, bobele Ngai nde nazali Nzambe. Nazali Yawe, mosusu azali te.


Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Na tango wana, na mikolo wana, › elobi Yawe, ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi kasi bakomona yango te, masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ; pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.


Mabe moko te oyo asalaki ekotangama lisusu na moto na ye ; akozala solo na bomoi mpo na makambo ya sembo oyo azali kosala.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.


Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ