10 apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo !
Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.
mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo : Nzambe abosana masumu na yo ebele.
Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?
Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;
Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.