Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 102:9 - Mokanda na Bomoi

9 Banguna na ngai batombokeli ngai, bazali kofinga ngai tango nyonso mpe bazali kosalela kombo na ngai mpo na kolakela bato mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 102:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.


Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?


Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.


Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo ?


Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »


Boloba yango te kati na engumba Gati, bolela te ! Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu !


Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu ; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ