Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 102:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 102:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, mikuwa na ngai ekawuki na moyi.


Nakomi lokola mbeki oyo ezali kokawuka na milinga, nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.


Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda ; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.


Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazali kati na pasi ; miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba ebebi mpo na mawa.


Yoka ngai mpe kangola ngai noki ! Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.


Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.


Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.


Wuta na likolo, atindeli ngai moto, akitiseli ngai yango kino na mikuwa ; atieli ngai motambo na makolo mpe akweyisi ngai ; akomisi ngai eloko ya pamba, akotisi ngai na mawa ya mokolo na mokolo.


Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai.


Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ