22 Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.
Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.
Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.
Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.
na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.