Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele.
Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.
Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »