Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »
Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai, mabunga na ngai ekomi konyokola ngai, mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ; ezali ebele koleka suki ya moto na ngai, mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.