Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 102:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 102:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.


pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.


Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa ; bazali kobengana ngai lokola mabanki.


Oh Yawe, sango ya Kombo na Yo ewumelaka libela na libela ! Yawe, bakopanza sango ya Kombo na Yo seko na seko !


Banguna na ngai balimwa mpo na libela ; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.


Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki ; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.


Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.


Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.


Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.


Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ