10 Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
Ata soki okeyi kobunda na mpiko nyonso, Nzambe akokweyisa yo liboso ya monguna, pamba te azali na makoki ya kosunga mpe ya kokweyisa.
Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »
Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.
Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu !
Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.
tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.