4 Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.
Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai ! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !
Navandaka esika moko te na bakosi, natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.
Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
Miso na ngai ebebi mpo na mawa ; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.
Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.
Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.
Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »
Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›
Kasi bakitisaki ngai na nzela ya lidusu kati na mir, kati na kitunga, libanda ya mir ; bongo nalongaki kokima ye.
Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »