2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.
Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,
Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.
Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »
Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.
« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Ayimeleki azongiselaki mokonzi : — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ?