Banzembo 100:5 - Mokanda na Bomoi5 Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.
ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.