Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 100:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 100:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo mpe kokumisa Kombo na Yo.


Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.


Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo !


Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.


Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.


Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye ! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo !


Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo ! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye !


Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama ; ezali bule !


Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.


Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba : mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ