Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 100:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 100:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye.


Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.


Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.


Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.


Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.


Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.


Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.


Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki ;


Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ