Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 100:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 100:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.


Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo ! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko !


Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »


Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !


Bazwi bakobimela na Ejipito ; bato ya Kushi bakoya na lombangu, bakotombola maboko epai ya Nzambe.


Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !


Siona, mboka kitoko, yemba nzembo ! Isalaele, ganga makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.


Alobaki lisusu : « Bapagano, bosepela elongo na bato na Ye. »


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ