9 Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.
Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.