Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 10:2 - Mokanda na Bomoi

2 Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 10:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema ;


Kamata mokumba ya bolamu na ngai, mosali na Yo ; tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.


Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !


Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo ; kasi ngai, natosaka mitindo na Yo na motema na ngai mobimba.


Bato ya lolendo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai, baboyi kotosa mibeko na Yo.


Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !


Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.


Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.


Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.


atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.


Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.


Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Ozalaki komilobela kati na motema : ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor ;


Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ?


Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ