Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 10:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.


Yawe azali Mokonzi seko na seko ; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela ! Bokumisa Yawe !


Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela ; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.


abenganaki bikolo liboso na bango, apesaki bango etando lokola libula mpe avandisaki mabota ya Isalaele kati na bandako na bango ya kapo.


mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.


Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.


Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.


Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.


Yawe akotikala mokonzi libela na libela !


Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.


Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.


Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba : Natombeli bino kimia monene !


Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.


Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela ! Amen.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ