14 Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.
‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.
pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.
Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.
Asiri akokoka kobikisa biso te ; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo ?
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.