Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 10:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe, mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 10:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?


Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.


Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »


Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda ; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.


Tango nazalaki na kimia, nalobaki : « Nakotikala kokweya te. »


Nkolo, lamuka ! Mpo na nini ozali kolala ? Lamuka, kobwaka biso te mpo na libela.


Yawe, mpo na nini ozali kobomba elongi na Yo ? Mpo na nini ozali kobosana pasi mpe minyoko na biso ?


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe ; nabondelaka Yo tongo nyonso.


Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu ?


Mpo na nini ozali kosala makambo lokola moto oyo asutuki to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto ? Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso mpe tobengami solo na Kombo na Yo ! Kosundola biso te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ