Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 1:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.


Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.


Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.


Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.


Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.


Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.


Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.


Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.


Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.


Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai


Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Kasi bango, bateyi ya lokuta, lokola banyama oyo ezanga mayele, oyo etambolaka na bonyama, oyo ebongisama mpo ete bato bakanga yango na mitambo mpe baboma yango, bafingaka oyo bayebi te. Mpo na yango, bakokufa lokola banyama,


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ