Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 1:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?


Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,


Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe, mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.


Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


« Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te.


Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,


Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba :


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.


mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ