Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
Okotia mungwa na makabo na yo nyonso ya bambuma mpe okobosana te kotia mungwa na likabo na yo ya bambuma, pamba te ezali elembo ya boyokani oyo Nzambe na yo asalaki. Okotia mungwa na makabo na yo nyonso.
Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,