4 Bobondelaka Nzambe mpo ete nasakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli penza kosala.
Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.
Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !
Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te ;
Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango.
Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.
Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.