16 Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise ; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.
Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.
Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te.
Nazali kotatola solo mpo na ye ete azali kosala mosala makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko ya Iyerapolisi.
Bopesa mbote epai ya bandeko ya Laodise, epai ya Nefa mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na ye.
Nasengi na bino, na Kombo ya Nkolo, ete botangelaka bandeko nyonso mokanda oyo.
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.