Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 4:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 4:1
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.


Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »


Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »


Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ