Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.