Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.
Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.