18 Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.
Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi.
Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !
Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.
basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.
Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.
Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.
pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo.
Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali ; mwasi asengeli nde kovanda nye.