Bakolose 3:16 - Mokanda na Bomoi16 Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.