Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.
Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto.
Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo ; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,
Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.